Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Tambola na bwanya

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Tambola na bwanya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bakolose 4:5

Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu.

02 Ba-Efeso 5:15-16

Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.

03 Jake 1:5

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

04 Masese 4:7

Tala ebandeli ya bwanya: Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.

05 Bakolose 1:9-10

Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka, mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,

06 Masese 3:5-6

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

07 Masese 9:10

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

08 Jake 3:17

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

09 Banzembo 90:12

Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.

10 Masese 2:6

Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.

Bantína oyo etali