Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokambi

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Bokambi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 32:8

Olobaki: « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

02 Masese 3:5-6

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

03 Ezayi 30:21

Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo: « Tala nzela yango oyo! »

04 Yoane 16:13

Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya;

05 Banzembo 25:9

Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.

06 Ezayi 58:11

Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.

07 Banzembo 48:14

Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.

08 Banzembo 73:24

Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.

09 Banzembo 25:5

Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.

10 Masese 16:9

Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

11 Banzembo 143:10

Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku!

12 Kobima 15:13

Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.

Bantína oyo etali