Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Boyebi
Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Boyebi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela! Amen!
Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,
Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.
Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.
Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.