Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kozwa ekateli

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Kozwa ekateli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 16:9

Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

02 Masese 3:5-6

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

03 Jake 1:5

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

04 Masese 19:21

Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.

05 Banzembo 37:23

Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye;

06 Bakolose 3:15

Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango; mpe bozongisaka matondi.

07 Masese 21:5

Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.

08 Masese 14:8

Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele: lokuta.

09 Luka 14:28

Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango?

Bantína oyo etali