Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bwanya

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bwanya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 1:5

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

02 Masese 2:6

Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.

03 Masese 9:10

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

04 Bakolose 2:3

Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.

05 1 Bakolinto 1:30

Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,

06 Masese 4:7

Tala ebandeli ya bwanya: Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.

07 Jake 3:17

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

08 Mosakoli 7:12

Bwanya ezali lokola nguba, ndenge mpe mosolo ezalaka nguba; kasi litomba ya boyebi ezali ete ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.

09 Masese 3:13

Esengo na moto oyo amoni bwanya! Esengo na moto oyo azwi mayele!

10 Ba-Efeso 5:15-16

Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.

11 Masese 16:16

Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.

12 Daniele 2:21

Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.

13 Banzembo 111:10

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Bantína oyo etali