Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mayele

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Mayele mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 3:13

Esengo na moto oyo amoni bwanya! Esengo na moto oyo azwi mayele!

02 Masese 4:7

Tala ebandeli ya bwanya: Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.

03 Masese 2:2-3

soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele; soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli;

04 Banzembo 119:104

Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli; yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.

05 Masese 3:5

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo.

06 Masese 16:16

Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.

07 Banzembo 119:130

Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.

08 Yobo 28:28

Bongo alobaki na moto: « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya! Koboya mabe, yango nde mayele! »

09 Masese 9:10

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

10 Masese 14:33

Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba?

11 1 Bakolinto 14:20

Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.

12 Masese 18:2

Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.

13 Bakolose 1:9

Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,

14 Masese 19:8

Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye; moto oyo alingaka mayele alongaka.

Bantína oyo etali