Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bwanya euti likoló

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Bwanya euti likoló mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 3:17

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

02 Jake 1:5

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

03 1 Bakolinto 1:25

Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.

04 Masese 2:6

Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.

05 Bakolose 1:9

Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,

06 1 Bakolinto 1:30

Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,

07 Daniele 2:20-21

Daniele alobaki: Tika ete Kombo ya Nzambe ekumisama libela na libela! Bwanya mpe nguya ezali ya Ye. Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.

08 Ba-Efeso 1:17

mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.

09 Masese 8:22-23

Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala; aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te.

10 1 Bakolinto 2:6-7

Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. Te! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili.

11 Yobo 28:23-28

Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka. Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola. Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi, tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali, amonaki bwanya mpe akumisaki yango, andimaki yango mpe amekaki yango. Bongo alobaki na moto: « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya! Koboya mabe, yango nde mayele! »

Bantína oyo etali