Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Tia motema, oyekamela mayele na yo te

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Tia motema, oyekamela mayele na yo te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 3:5

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo.

02 Masese 3:6

Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.

03 Banzembo 37:5

Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala:

04 Jeremi 17:7-8

Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama! Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi: ezalaka na somo ya moyi makasi te; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »

05 Ezayi 26:3

Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

06 Banzembo 9:10

Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.

07 Banzembo 118:8

Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya na bato.

08 Masese 28:26

Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba, kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.

Bantína oyo etali