Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lisumu mpe Etumba na Yango
Lisumu ezali ya solo mpe ya monene, kasi nguya na yango ebukani mpo na baoyo bazali kati na Klisto. Na nzela ya Molimo, tobomaka yango mpe totambolaka na bonsomi, mpe tozwaka ngolu ya kosunga na ntango ya bosenga. Bavɛrsɛ oyo elatisaka yo bibundeli mpo na etumba ya mokolo na mokolo mpe elakisaka yo Oyo alongi.
Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino: Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso; mpe Nzambe azali Moyengebene; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
Kasi Ngai, nalobi na bino: Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
Bongo alobaki na bato nyonso: — Bosala keba! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.
Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.
Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.
mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta, mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika, mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.
Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.
Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.