Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kolonga lisumu
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kolonga lisumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.
Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso; mpe Nzambe azali Moyengebene; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.
Pamba te soki botamboli kolanda baposa ya nzoto bokokufa; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala mabe oyo bosalaka kati na banzoto na bino, bokozala na bomoi.
Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko. Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu; mpe lisumu ememaka na kufa.
Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto!