Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komekama na masenginya

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Komekama na masenginya mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 10:13

Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso; mpe Nzambe azali Moyengebene; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.

02 Jake 1:13-14

Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba: « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe. Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko.

03 Ba-Ebre 4:15

Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.

04 Matayo 26:41

Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.

05 Jake 4:7

Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.

06 Jake 1:12

Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.

07 Banzembo 119:11

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

08 1 Bakolinto 10:12

Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te!

Bantína oyo etali