Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lisumu

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Lisumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 3:23

pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe;

02 Barome 6:23

Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

03 1 Yoane 1:9

Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.

04 Ezayi 53:6

Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.

05 Jake 4:17

Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.

06 1 Yoane 1:8

Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso.

07 Barome 5:12

Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.

08 Banzembo 51:5

Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.

09 Bagalatia 6:7-8

Bomikosa te: Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka. Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko.

10 Barome 6:14

Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.

Bantína oyo etali