Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Zuwa

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Zuwa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 3:16

Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.

02 Masese 14:30

Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.

03 Bagalatia 5:26

Tozala bato ya lolendo te, totumbolana te mpe toyokelana zuwa te.

04 1 Bakolinto 13:4

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,

05 1 Petelo 2:1

Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato.

06 Tito 3:3

Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.

07 Banzembo 73:3

pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.

Bantína oyo etali