Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mposa mabe
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Mposa mabe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi Ngai, nalobi na bino: Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.
« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.
Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino: Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite; moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu, asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,
Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
Kasi bolata Nkolo Yesu-Klisto mpe bomitungisa te na baposa ya nzoto oyo ezali kobundisa bino.
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili: pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.
Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso. Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.
Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe.
Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te? Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.