Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Losambo ya bikeko
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Losambo ya bikeko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.
Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai. Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.
Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko.
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili: pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.
Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato. Ezali na minoko, kasi elobaka te; ezali na miso, kasi emonaka te; ezali na matoyi, kasi eyokaka te; ezali na zolo, kasi eyokaka solo te; ezali na maboko, kasi esimbaka te; ezali na makolo, kasi etambolaka te. Minoko na yango ebimisaka ata makelele te. Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.
Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.
Nazali Yawe; yango nde Kombo na Ngai; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.
Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen!
Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te: bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo;
Tala misala ya bomoto: kindumba, misala ya bosoto, pite, kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana, likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso: bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.