Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Baombo ya lisumu lisusu te
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Baombo ya lisumu lisusu te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.
bosili kokangolama na bowumbu ya lisumu mpe bokomi bawumbu ya bosembo.
Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.
Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.
Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.
Moto nyonso oyo asilaki kokufa atangamaki lokola moto ya sembo: azali lisusu te na se ya bokonzi ya lisumu.
Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.
Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.
Sik’oyo, Nkolo azali Molimo; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali.