Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kokima lisumu
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kokima lisumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko.
Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye: — Yaka kosangisa na ngai nzoto! Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako.
Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe. Longwa kati na bango, kolekela wana te, kosala mpe maseki kuna te, kasi kende na yo na nzela mosusu.
Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.
Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe: « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »
Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.
longola nzela na yo pembeni na ye mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
Kasi bolata Nkolo Yesu-Klisto mpe bomitungisa te na baposa ya nzoto oyo ezali kobundisa bino.
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.