Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Misio mpe Bikolo
Motema ya Nzambe ezali mpo na bikolo nyonso, mpe atindaka bato na ye kokómisa bayekoli tii na nsuka ya mabele. Nsango Malamu ezali sango ya kosepelisa mpo na bato nyonso, libota nyonso, mpe lokota nyonso. Bavɛrsɛ oyo epelisaka motema mpo na babungi mpe mpo na Etinda Monene.
Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu; bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.
Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.
Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke! Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye: « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.
Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango;
Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te? Kolanda ndenge ekomama: « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu! »
Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te?
Ye, Yawe, alobi: « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,
Alobaki na bango: — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.
Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye.