Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Pole epai ya bikolo

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Pole epai ya bikolo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 49:6

Ye, Yawe, alobi: « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »

02 Matayo 5:14

Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.

03 Misala ya Bantoma 13:47

Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso: « Nakomisi yo pole mpo na bikolo mosusu, mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili. »

04 Ezayi 42:6

« Ngai Yawe, nabengaki yo na bosembo, nasimbi loboko na yo makasi, nabateli yo mpe natie yo mpo na kosala boyokani elongo na bikolo mpe kozala pole ya bikolo,

05 Yoane 8:12

Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.

06 Matayo 5:16

Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.

07 Bafilipi 2:15

mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili

08 Misala ya Bantoma 26:18

mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »

09 Ezayi 60:1-3

« Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo. Tala, molili ezipi mabele mpe molili makasi ezipi bato, kasi Yawe atelemi mpo na yo mpe nkembo na Ye emonani epai na yo. Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.

10 1 Petelo 2:9

Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.

Bantína oyo etali