Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Libota nyonso mpe lokota nyonso

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Libota nyonso mpe lokota nyonso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 7:9

Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango;

02 Emoniseli 5:9

Mpe bayembaki nzembo ya sika: « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.

03 Banzembo 22:27

Babola bakolia mpe bakotonda; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.

04 Bafilipi 2:10-11

mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele, mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.

05 Daniele 7:14

Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.

06 Emoniseli 5:13

Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene; bango nyonso bazalaki koloba: « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela! »

07 Ezayi 45:23

Nalapi ndayi na Kombo na Ngai; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te: mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.

08 Barome 14:11

Pamba te ekomama: « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »

09 Zakari 8:23

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba: ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »

Bantína oyo etali