Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosakola Nsango Malamu

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Kosakola Nsango Malamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Malako 16:15

Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.

02 Barome 1:16

Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka: liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.

03 Barome 10:17

Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.

04 1 Bakolinto 9:22

Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.

05 2 Timote 4:2

teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.

06 2 Bakolinto 5:20

Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso: « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.

07 Misala ya Bantoma 4:12

Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.

08 Yoane 3:16

Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.

09 Misala ya Bantoma 8:4

Bandimi oyo bapalanganaki bazalaki koteya Liloba na Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende.

10 Barome 10:9

Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika;

11 1 Petelo 3:15

Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,

12 Matayo 5:16

Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.

13 Masese 11:30

Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.

14 Daniele 12:3

Bato oyo batambolaki na bwanya bakongenga lokola pole ya mapata; mpe bato oyo bakolakisa bato ebele nzela ya bosembo, bango mpe bakongenga lokola minzoto libela na libela.

Bantína oyo etali