Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bobuki mbuma
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Bobuki mbuma mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke! Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »
Bino bolobaka: « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino: bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.
Alobaki na bango: — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.
Tosalaka bolamu; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo. Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.
Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale.
Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma: Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.
Bongo anjelu mosusu abimaki na Tempelo mpe alobaki na mongongo makasi na ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata: « Kamata mbeli na yo mpe buka bambuma, pamba te tango ya kobuka bambuma ekoki, mpe ete bambuma ya mokili ekomeli. »
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele: akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.
Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.
Bokanisaka likambo oyo: Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.