Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kende mpe yebisa

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kende mpe yebisa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 12 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 Malako 5:19 Vɛrsɛ ya ntina

Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye: « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »

02 Banzembo 96:3

Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.

03 1 Masolo ya Kala 16:24

Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso!

04 Yoane 4:28-29

Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato: — Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te?

05 Misala ya Bantoma 1:8

Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.

06 Ezayi 6:8

Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba: — Nakotinda nani? Nani akokende mpo na biso? Nazongisaki: — Ngai oyo, tinda ngai!

07 Matayo 28:19-20

Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu; bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.

08 Malako 16:15

Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.

09 Luka 24:47

mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »

10 Misala ya Bantoma 5:20

— Bokende kotelema kati na Tempelo mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika.

11 Yoane 1:41

Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye: « Tomoni Masiya! »

12 Banzembo 105:1

Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye! Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo!

Bantína oyo etali