Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Etinda Monene

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Etinda Monene mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 28:19-20

Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu; bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.

02 Misala ya Bantoma 1:8

Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.

03 Malako 16:15

Alobaki na bango: — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.

04 Luka 24:47

mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »

05 Yoane 20:21

Yesu alobaki na bango lisusu: — Tika ete kimia ezala na bino! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino.

06 Matayo 28:18

Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki: — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.

07 2 Timote 2:2

Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu.

08 Barome 10:14-15

Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te? Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te? Kolanda ndenge ekomama: « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu! »

09 Malako 16:16

Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.

10 Misala ya Bantoma 1:11

— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.

11 2 Bakolinto 5:20

Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso: « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.

12 Ezayi 6:8

Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba: — Nakotinda nani? Nani akokende mpo na biso? Nazongisaki: — Ngai oyo, tinda ngai!

Bantína oyo etali