Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotindama na bolingo

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Kotindama na bolingo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 5:14

Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye.

02 2 Bakolinto 5:15

Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.

03 1 Bakolinto 9:16

Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu!

04 Barome 9:3

Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,

05 Yoane 21:15

Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo: — Simona, mwana mobali ya Yoane; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai? Azongisaki: — Iyo, Nkolo! Oyebi malamu ete nalingaka Yo. Yesu alobaki na ye: — Batela bampate na Ngai.

06 2 Bakolinto 5:14-15

Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye. Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.

07 Jeremi 20:9

Kasi soki nalobi: « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te!

08 1 Bakolinto 9:22

Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.

09 Barome 1:14

Nazali na niongo ya Bagreki mpe ya bato oyo bazali Bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba.

10 Misala ya Bantoma 20:24

Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali: kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai: kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.

11 Barome 10:1

Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai ya Nzambe ezali ete bana ya Isalaele babika.

12 Luka 14:23

Nkolo alobaki na mosali na ye: « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.

13 Yoane 4:34

Yesu alobaki na bango: — Bilei na Ngai ezali: kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.

14 Matayo 9:36

Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.

Bantína oyo etali