Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Basali mpo na bobuki

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Basali mpo na bobuki mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 10:2

Alobaki na bango: — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.

02 Matayo 9:37-38

Yesu alobaki na bayekoli na Ye: « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke! Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

03 1 Bakolinto 3:9

Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.

04 Yoane 4:35

Bino bolobaka: « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino: bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.

05 2 Bakolinto 6:1

Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te;

06 Matayo 9:38

Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

07 1 Bakolinto 3:6-7

Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa. Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.

08 Bakolose 4:11

Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.

09 Bafilipi 2:25

Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.

Bantína oyo etali