Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bobateli ya Nzambe
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Bobateli ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Botala ndeke ya likolo: elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango?
Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Yango wana, bomitungisaka te na koloba: ‹ Tokolia nini? Tokomela nini? Tokolata nini? › Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te; boleki bandeke mike ebele na motuya.
Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te. Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino. Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo; Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.
Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso: « Yawe azali monene! »
Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki. Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai kososola makanisi na Yo! Tala ndenge motango na yango ezali ebele! Nameki kotanga yango, ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo. Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.
Mpo na Benjame, alobaki: « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye! »