Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ngolu
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Ngolu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe— ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.
Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu;
Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka
Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso.
Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.