Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Boboto ya Nzambe

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Boboto ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 2:4

To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema?

02 Tito 3:4-5

Kasi tango Nzambe Mobikisi na biso amonisaki boboto mpe bolingo na Ye mpo na bato, abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.

03 Ba-Efeso 2:7

mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.

04 Banzembo 117:2

Pamba te bolingo na Ye mpo na biso ezali monene, mpe bosembo ya Yawe ewumelaka seko na seko. Bokumisa Yawe!

05 Joeli 2:13

Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.

Bantína oyo etali