Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolingo ya Nzambe

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bolingo ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 4:10

Bolingo yango emonani na likambo oyo: ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.

02 Yoane 3:16

Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.

03 Barome 5:8

Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.

04 1 Yoane 3:1

Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te: ezali mpo ete eyebi Nzambe te.

05 Barome 8:38-39

Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

06 Ba-Efeso 3:18-19

mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto, mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.

07 1 Yoane 4:16

Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.

08 Sofoni 3:17

Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›

Bantína oyo etali