Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mawa

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Mawa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 103:13

Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye;

02 Bileli 3:22-23

Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te; ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene!

03 Banzembo 145:8

Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.

04 Matayo 9:36

Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.

05 Ezayi 49:15

Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te!

06 Banzembo 116:5

Yawe asalaka ngolu mpe azali sembo, Nzambe na biso ayokelaka bato mawa.

Bantína oyo etali