Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Luka liboso Bokonzi

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Luka liboso Bokonzi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 6:33

Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.

02 Matayo 6:34

Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko: mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.

03 Bakolose 3:1-2

Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.

04 Banzembo 27:4

Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi: nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.

05 Luka 12:31

Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.

06 Matayo 13:44

Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.

Bantína oyo etali