Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lobiko
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Lobiko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika;
Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.
Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.
Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso.
pamba te Nzambe alobi: « Na tango ya malamu, nayanolaki yo; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.