Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobotama mbala ya mibale

Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Kobotama mbala ya mibale mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 3:3

Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.

02 Yoane 3:5

Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo.

03 Yoane 3:7

Kokamwa te ndenge nalobi na yo: « Osengeli kobotama mbotama ya sika! »

04 1 Petelo 1:23

Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.

05 Tito 3:5

abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.

06 2 Bakolinto 5:17

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.

07 Yoane 1:12-13

nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.

08 1 Petelo 1:3

Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo

09 1 Yoane 5:1

Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.

10 Jake 1:18

Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.

11 Ezekieli 36:26

Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.

12 Yoane 3:6

Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo.

13 Barome 6:4

Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.

14 1 Yoane 2:29

Boyebi malamu ete Klisto azali sembo; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.

Bantína oyo etali