Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotubela mpe kondima

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kotubela mpe kondima mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 10:9-10

Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika; pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.

02 Barome 10:13

Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.

03 Matayo 10:32

Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye;

04 1 Yoane 4:15

Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe.

05 Misala ya Bantoma 16:31

Bazongisaki: — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.

06 Barome 10:11

Makomi eloba: « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »

Bantína oyo etali