Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bozalisi ya sika
Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bozalisi ya sika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
Ezali te kokatama ngenga to kokatama ngenga te nde ezali na tina; likambo ya tina ezali: kokoma ekelamu ya sika.
Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.
mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.
mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
Tala, nazali kosala likambo ya sika! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki: « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » Alobaki lisusu: « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. »