Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Porte ya nkaka
Bavɛrsɛ 14 ya Biblia na ntína ya Porte ya nkaka mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bokotela na ekuke ya moke; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana. Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.
— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.
Yesu azongiselaki ye: — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Bato nyonso oyo balobaka na Ngai: ‹ Nkolo! Nkolo! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
Moto moko atunaki Ye: — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika? Yesu alobaki na bango: — Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.
Ngai nde nazali ekuke; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
Bongo Yesu alobaki na bango nyonso: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.
Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai: ‹ Nkolo! Nkolo! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele? › Bongo Ngai, nakoyebisa bango: ‹ Natikala koyeba bino te! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe! ›
Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.
Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.
Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu: — Nazali koloba na bino penza ya solo: Ngai nazali ekuke ya bameme.