Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bomoi ya seko

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bomoi ya seko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 3:16

Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.

02 Yoane 10:28

Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai.

03 Yoane 17:3

Nzokande, bomoi ya seko ezali: koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.

04 1 Yoane 5:11-12

Mpe litatoli yango ezali: Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye. Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi.

05 Yoane 6:47

Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo andimi azali na bomoi ya seko,

06 Barome 6:23

Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

07 1 Yoane 5:13

Bino oyo bondimelaka Kombo ya Mwana na Nzambe, nakomeli bino makambo oyo mpo boyeba ete bozali na bomoi ya seko.

08 Tito 1:2

mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,

Bantína oyo etali