Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Boboto epai ya basusu
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Boboto epai ya basusu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa!
Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.
Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi. Boyikanaka mpiko; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.
Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi.
tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo!
Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo? »
Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
Boyokela bato oyo bazali nanu na tembe mawa;