Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kokangola minyɔlɔlɔ

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kokangola minyɔlɔlɔ mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 58:6

Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka: kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.

02 Ezayi 61:1

Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko;

03 Luka 4:18

« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama

04 Banzembo 146:7

Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala; abimisaka bakangami na boloko.

05 Ezayi 42:7

mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.

06 Ezayi 58:9

Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo; tango okosenga lisungi, akoloba: ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe;

Bantína oyo etali