Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotia elikya na Nzambe

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kotia elikya na Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 42:5

Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai: Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.

02 Banzembo 42:11

Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba: « Wapi Nzambe na yo? »

03 Banzembo 39:7

Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.

04 Bileli 3:24

Namilobeli: « Yawe azali elikya na ngai; yango wana nakotia motema epai na Ye. »

05 Banzembo 130:5

Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya; nazali kozela maloba na Ye.

06 Banzembo 33:20-22

Totielaka Yawe motema; azali lisungi mpe nguba na biso. Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule. Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo, tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.

07 Banzembo 71:5

Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai; wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.

08 Banzembo 62:5

Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.

09 Mishe 7:7

Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe, nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.

10 Banzembo 147:11

kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.

11 Banzembo 33:18

Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,

12 Barome 15:13

Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.

Bantína oyo etali