Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobatelama malamu

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Kobatelama malamu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 10:28

Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai.

02 Yoane 10:29

Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai.

03 Barome 8:38-39

Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

04 1 Petelo 1:5

ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.

05 Jide 1:24

Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene;

06 Deteronomi 33:27

Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.

07 Banzembo 37:24

ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.

08 Ezayi 41:13

Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, nasimbi makasi loboko na yo ya mobali mpe nazali koloba na yo: ‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›

Bantína oyo etali