Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kondima ya solo ya lobiko

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kondima ya solo ya lobiko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 5:13

Bino oyo bondimelaka Kombo ya Mwana na Nzambe, nakomeli bino makambo oyo mpo boyeba ete bozali na bomoi ya seko.

02 Yoane 10:28

Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai.

03 Barome 8:38-39

Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

04 Yoane 5:24

Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.

05 Bafilipi 1:6

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

Bantína oyo etali