Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bilaka ya Nzambe

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Bilaka ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 1:20

Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.

02 2 Petelo 1:4

Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.

03 Jozue 21:45

Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya; solo, nyonso ekokisamaki.

04 Ba-Ebre 10:23

Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te.

05 Mitango 23:19

Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te?

06 Jozue 23:14

Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.

07 1 Bakonzi 8:56

« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.

08 Barome 4:21

wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye.

09 2 Petelo 3:9

Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.

Bantína oyo etali