Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobatelama na nguya ya Nzambe

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kobatelama na nguya ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Petelo 1:5

ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.

02 Jide 1:24

Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene;

03 Yoane 10:28-29

Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai. Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai.

04 Bafilipi 1:6

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

05 2 Timote 1:12

Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.

06 1 Batesalonika 5:23-24

Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya. Ye oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe Ye nde akokokisa yango.

Bantína oyo etali