Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Elikya oyo eyokisaka nsɔni te
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Elikya oyo eyokisaka nsɔni te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.
Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.
Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.
Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, mpe basi na bango, basungi na yo; bakofukama liboso na yo na bilongi etala na mabele, bakolembola putulu ya makolo na yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe; ete bato oyo batielaka Ngai motema bayokisamaka soni te. »
Makomi eloba: « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »
Pamba te tosila kobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona? Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango.
Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa. Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule
Pamba te Makomi eloba: « Tala, napona libanga moko ya motuya oyo nazali kotia kati na Siona lokola libanga ya songe ya ndako; moto nyonso oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »