Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mbongwana

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Mbongwana mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 3:18

Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.

02 Barome 12:2

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

03 Bagalatia 2:20

boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.

04 Ezekieli 36:26

Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.

05 2 Bakolinto 5:17

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.

06 Bafilipi 1:6

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

07 1 Batesalonika 5:23

Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.

Bantína oyo etali