Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokoli na molimo

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bokoli na molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Petelo 3:18

kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela! Amen!

02 1 Petelo 2:2

Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,

03 Bakolose 1:10

mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,

04 Ba-Efeso 4:15

Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto.

05 Banzembo 1:3

Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu.

06 Bafilipi 1:6

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

07 Jeremi 17:8

Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi: ezalaka na somo ya moyi makasi te; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »

08 Oze 6:3

Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana: akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.

09 Bafilipi 1:9

Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,

10 1 Batesalonika 3:12

Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.

Bantína oyo etali