Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kouta na miliki kino na bilei ya makasi

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kouta na miliki kino na bilei ya makasi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 3:2

Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te bolingaki te kokoka kolia yango. Ezala sik’oyo, bokokoka na bino mpe kaka te kolia yango,

02 Ba-Ebre 5:13-14

Nzokande, moto nyonso oyo atikalaka kaka na miliki azali mwana moke mpe ayebi te liloba oyo eteyaka bosembo. Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.

03 1 Petelo 2:2

Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,

04 Ba-Efeso 4:14

Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.

05 1 Bakolinto 13:11

Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.

06 Ba-Ebre 6:1

Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe,

07 1 Bakolinto 14:20

Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.

08 2 Petelo 3:18

kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela! Amen!

09 Bakolose 1:28

Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto.

10 Bafilipi 3:15

Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.

11 2 Timote 2:15

Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.

12 Ba-Ebre 5:12

Bosengelaki wuta kala kokoma balakisi; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te.

Bantína oyo etali