Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bobulisi

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Bobulisi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Batesalonika 4:3

Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite;

02 1 Petelo 1:15-16

Kasi lokola Ye oyo abengaki bino azali Bule, bino mpe bozala bule kati na etamboli na bino nyonso, pamba te ekomama: « Bozala bule, pamba te nazali Bule. »

03 Yoane 17:17

Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.

04 Ba-Ebre 12:14

Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.

05 2 Timote 2:21

Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.

06 2 Batesalonika 2:13

Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.

07 Barome 6:22

Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.

Bantína oyo etali